Pona bolamu - Album: Le Culte

09/12/2014 21:03

 

Na koki te ko bomba eh,
Na koki te ko fanda kimia,
Na koki na zanga maloba eh,
Na koki te na kanga monoko,
Bolamu'a Nzambe eleki bo moyi nanga
Na koki te, ko bomba yango (Yaweh)

Pona bolamu oyo O sali eeeh eh(x2)

Na koki te na fanda kimia
Na koki te na kanga monoko
Bolamu'a Nzambe elekeli nga mosantu
Na koki te na zanga maloba
A kanisaka nga ata na kanisi Ye te
Yesu na nga ooo naza na talo Yaya

Pona bolingo oyo na moni eeeeh eh
Pona bolingo oyo O sali eeeh eh


Ba sujets nionso eza n'ango valables
Soki'olingi o sanjola Nzambe

Ba susu ba sanjola Ye pona lipa
Ba susu ba netola Ye pona mbongo
Sujet nionso, eza nango na tina
A condition que ozala mosantu (Yaya)

Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh (x2)

Nzambe monene lokola Yo papa
Na mokili'oyo na moni te oh
Na kanisi nionso o saleli nga
Na zongi pene na yo na kumisa yo eh
Ba lobi na nga na binaka lokola liboma
Kasi na yebi sujet ya mabina na nga

Eza – Bolamu oyo O sali eeeh eh(x2)


Ba kamue nga ba lobi na banda wapi
Ba mituni eza pona nini
Ba yebi te temoignage'a motema
Makamb'o eliki nga meke molimo

 

Ata moto mosusu a yeba te oooh
Motema na nga eza temoin (Yaya)

Temoin ya - Bolamu oyo O sali eeeh eh
Na za temoin ya - Bolamu oyo O sali eeeh eh

Ewuti nga mozindo a motema eh
Ebimi nga kino monoko
Na lingi na ganga kasi na koki te oh
Motema na nga esi etondi
Etondi na bolamu na Nzambe
Na libota to pe na santé na nga (Yaya)

Na yemba – Bolamu oyo O sali eeeh eh

Na etonga, ma boko na nga likolo
Molimo na nga esi emati
Pinjoli na miso eza ko tanga eh
Ba mituni ooh pona nini
Nazui rétroviseur na tali kala eeh
Bolamu nionso Nzambe asala

Na yembi ooh - bolamu oyo O sali eeeh eh,
Quand je me souviens je me mets à chanter,

à chanter comme un fou pour Jésus

Bolamu oyo O sali eeeh eh

Eloko mosusu te na bomoï na nga
Eza na motuya lokola makambu'oyo
Oyo Masiya A salela nga
Oyo elekela nga mabanzo
Yango na pesa wolo to pe palata eeh
Nionso na pesa soki A sengi

Pona bolamu oyo na moni eeeh eh (x2)


Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

O longi'oooh oh oh motema eeh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga papa (Olongi motema ya mosantu na Yo eeeh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Olongi molimo ooooooh ya

Moyengebene ooh Papa ooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Na komi'otik'o zala nga
Na komi'o koma lokola Yo Yaya

Po olongi ooh na mozindo ya motema Papa

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Moto ya kanda kanda
A zua douceur a Molimo eeh

Po olongi ye ooh Masiya oh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Na yemba loyembo'eyemba Jacob a koma Israel oh

Po olongi oooh Yaweh ooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Makambu'ango elekeli nga
Kasi na lobi sala ndenge O lingo oooh

Oooh Yaweh eeh
Yaweh eeeoooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Likambo'ango e lelisi nga
kasi na lobi sala ndenge'O lingi oooh

Yaweh eeeeh eeh eh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Olongi motema aaaaah

Ya mosantu na Yo oooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Olongi motema,
Na kati'a motema ooooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga


Huuum olongi oooh,
Olongi motema eeeh.