Ngwende

11/12/2014 23:56
 
 
Ovanda na ngwende na Yo pona seko...
 
Umela mosanto
 
Ebongo biso tosopa masanjoli na makol'oyo ya Yo
 
Nzamb'oyo awumelaka seko
 
Te Savoir sur Le TRÔNE me rassure Seigneur...
 
Bisika Molayi na nga esuki omatisa nga na Mapeka Yaya.
 
Naza Leki ya Mokonzi, Naza Leki ya Nkosi, Yesu aza Yaya na nga
 
Eza Malamu kozala na Yaya oyo Avandi na Ngwende Likolo koleka ba ngwende nionso.
 
Nga Mosantu naza ko dondwa elongo na Yesu
 
 
Yaya ô vandi na kiti ya bokonzi na yo eh
 
Yaya o vandi na kiti ya bokonzi na yo eh
 
 
Yaya eh
 
 
Yaya ovanda mpo to pema te oh
 
Yaya ovandi mpo to pema te oh
 
 
Kasi ovandi mpo to kokisa Nyonso
 
Après avoir tout accompli sur la terre
 
Ozui nkombo koleka ba nkombo nyonso
 
Bapesi yo ngwende koleka ba ngwende nyonso
 
 
Ovanda na ngwende esalema na maboko ya moto te
 
menuisier na yo nde nani oh
 
Nabotama na kuta yo Nzambe na nse ya moyi
 
Nakoleka olobi kaka Nzambe na nse ya moyi
 
Abram aleka otikala Nzambe na nse ya moyi
 
 
Lelo naza na esengo ya kotatola Ngwende na yo eh
 
Yaya eh oh
 
 
Yaya ô vandi na kiti ya bokonzi na yo eh
 
Yaya eh