Nabanga Nini
12/12/2014 16:11
Gaël Music, Auteur/Compositeur : Alain-Gaël Moloto
1.
Ata mokili etelemi
Eboi kokend'ekomi na suka
Nayebi Nkol'ozali
Ebombamelo na ngai mosantu
Mpo'ete nyonso ezali
Esalisami kaka na yo eh
Mokeli na kokamwa
Nyonso esimbami na yo
Refrain :
Nkolo! elonga na ngai eza na yo eh
Yesu! Na yo nde nabengi Nzambe tata
Yo nde! mobateli ba mpate ya Nzambe
Yesu ! Na yo nde nabengami mosantu
Nkolo ! lobiko ya baye bakoganga
Yesu ! na yo nde na bengami mokitani
Ya Nzambe na bomoi
Mosungi na ngai azali kosala nabanga Nini oh oh !
2.
Ata makasi esili ngai
Mpo'ete nzela etondi minyoko
Nkolo y'okopesa ngai
Loboko ngai nasimba tokende
Mosala oy'obandi
0 komisaka kino na suka
Mokonzi na ngai azali
Na nguya ya kokomisa ngai
3.
Nkolo atelemi nde na nkembo
Bikelamu binso bifukama
Massiya na ngai aza na bomoi
Ngai na ningana tina nini
Ata mabele efunguani bipai
Natelemi nabanga te oh
Oyo asimbi aza makasi
Kombo na ye Yesu Kristu
Ate mokili eboi kondima
Oyo alobi nde yango oh
Ekosalema mpo na ngai
Mosungi na ngai azali kosala
Na banga nini oh.