Kanga nga photo

13/12/2014 01:29
 
 
[Refrain 1]
Moto oyo aza na elaka ye akufaka te
Kino ye akokoma bongo nde akokufa (2 fois)
 
1.
Batekaki ye na bandeko na ye bayebaki tina te
Nzoka nde na kati na nzoto na ye promesse ezalaki
Tango nzala eyaki na mboka balukaki ya kolia
Bakendaki kokumamela Joseph na mboka Ejipito
Bayebaki te wana leki na bango lisakoli ekokisami
 
[Refrain 1]
2.
Batindaki moto apokola mokonzi na ndako ya Esaïe
Babimisi mibali bavimba ba paquets mokonzi azalaki te
Ye wana na zamba azali kobima na solo ya bampate
Mwana moko oyo David mokonzi lisakoli ekokisami
 
[Refrain 1]
3.
Lolenge moko mpe Simeona azalaki na elaka
Ti tango akutanaki na mokonzi Simeona akufaki
Ngai mpe mwana nakokufa te kino nakomona yango
Oyo Nzambe alobela nga kino nakosimba yango
 
[Refrain 2]
Ngai mwana nakokufa te kino nakomona yango
Oyo Nzambe alobela nga kino nakosimba yango (2 fois)
Kanga nga photo mona nga bien lobi okokamwa nga
Mpo ete na nzoto na nga oyo etonda lisakoli
 
4.
Kobwaka te oyo afandi pembeni na yo oyebi ye nano te
Tango mosusu ye nde lipamboli na yo kobwaka ye nano te
Yo oyo babwaki kolelalela te loba kanga nga se photo
Bomba na ndako na yo obimisa lobi okobetela nga maboko
 
[Refrain 2]
5.
Kosopa zemi ya bilaka na yo te mpo nano omoni te
Mpo tango mobali apesaki yo zemi bozalaki se bino mibale
Kanga matoyi oyoka bato te oyoka se Nzambe
Ye oyo asimbi na tango na ye na kati na maboko na ye
 
[Refrain 2]