Losambo - Album : Champion

07/12/2014 23:48
 
 
Losambo na ngai Nkolo yanola é
Koléla na ngaï Yawhé o yoka é
Na za kosenga ngaï loboko na yo, zala na nga
Ba limite na ngaï é, ékueya é makambo ebongwana
Ebongwana é, na longa é,  Yawhé é, na longa é
Ngai na longa é, Yawhé é, na longa é
Ngai  Na longa é, ngaï na longa é.
 
Eleki nga mayélé, esali nga kobanga
Ngaï na kendé ko wapi
Na zongui na lisiba
Esika na zuaka makasi
Esika na zongaka ya sika
Kanga ekuke ya satana
Na bomoyi na ngaï étéléma
Téléma na longa é,  Yawhé é, na longa é
Na longa é, Yawhé é, na longa é
Na longa é, sala na longa é.
 
Esila boyé té, boyé té é é, boyé té
Ba longa ngaï té, ngaï té é é, ngaï té
Na kuéya na sé té, na té é é, na sé té
Na suka boyé té, boyé té é é, boyé té
 
Na za kosenga ngaï loboko na yo, zala na nga
Ba limite na ngaï é, ékueya é makambo ebongwana
Ebongwana é, na longa é,  Yawhé é, na longa é
 
Paroles
Na lingui o tia liloba oyo ézo correspondre na situation na yo
Soki ozo béla ossibi place ozo béla ozo yemba :
Na bika é, Nzamb’a miracle, na bika é
Sala nga na bika, Nzambé na lola, na bika é
 
Soki problème na yo éza bota ozo yemba
Na bota é, Nzamb’a na Anna, na bota é
Sala nga na bota, Nzambé na lola, na bota é
 
Soki problème na yo éza ya libala yemba
Na bala é, Nzamb’a bikamwa, na bala é
Sala nga na bala, Nzambé Moïse, na bala é
 
Soki bitumba élékéli yo yemba
Na longa é, Nzamb’a na Mbiyé, na longa é
Sala nga na longa, Nzamb’a Alliance, na longa é
 
Mosali na Nzambé, tango ekoki osenga miracle na yo
Bato ba dimélaka yo té, ba comprendre Nzambé a bengaki yo
Yemba elongo na ngaï
Bikamwa é, Nzamb’a na lola, bikamwa é
Salaka bikamwé é, Nzamb’a Moïse, bikamwa é
Salaka bikamwé é, Nzambé na Mbiyé, bikamwa é, Yaya
Salaka bikamwé é, Nzamb’a Moïse, bikamwa é, bikamwa é, Yaya
 
Paroles
Lélo, likambo moko esenguéli ebogwana na vie na yo
Yemba zembo oyo na kodima nioso
Zembo oyo na koma ngo elongo na yo
Tia liloba oyo ezo correspondre na problème na yo
 
 
 
Na za kosenga ngaÏ, loboko na yo na Ecclésia é