Kati na maboko na yo
12/12/2014 19:06
1.
Kati na maboko na yo Nkolo na ye komipesa motema pe nzoto.
Tambolisa ngai na njela na yo. Po ete na longa etumba makasi.
Na mona kembo na yo.
Eh Yawhe na kobelela yo, libanga na ngai monene.
Jipa matoyi nayo liboso na ngai te. Longola ngai na mabe eeh.
Yokamela mongongo na mabondeli na ngai. Wana nakobelela yo ooh. Wana nakotombola maboka na ngai epayi na yo Yawhe eeh.
Yawhe ozali nguya na nga pe nguba na ngai makasi.
Motema na ngai ezali na elikia bobela epayi na yo Yawhe eeh.
[Refrain]
Kati na maboko na yo Nkolo na ye komipesa motema pe nzoto.
Tambolisa ngai na njela na yo.
Po ete na longa etumba makasi. Na mona kembo na yo.
Choeur :
Boye na sungami pe motema eyoki esengo. Nakotonda yo na nzembo ooh. Yahwe ozali nguya ya bato na yo awa na se. Elikia ya ba pakolami iih.
Solo :
Kati na maboko na yo
Choeur :
Nkolo na ngai
Na ye komipesa
Motema pe nzoto
Solo :
Tambolisa ngai
Choeur :
Na njela na yo
Solo :
Po ete na longa
Choeur :
Etumba makasi
Kati na maboko na yo Nkolo.
Naye komipesa motema pe nzoto.